Nasikwami

Nasikwami, ngai natatola!
Nasikwami na Makila;
Nasikwami na ngolu na Ye,
Ngai mwana na Ye libela.

Nasikwami,
Na makila'a Mwana'a Mpate;
Nasikwami,
Ngai mwana na Ye libela.

Nakobika kati na Yesu,
Nazwi esengo ya sôlo;
Mpe pole ya bozali na Ye,
Ntango nyonso' ezali na ngai.

Nakokanisa Mosikoli,
Ntango nyonso na mokolo;
Mpe nakotika koyemba te,
Ntina na Bolingo na Ye.

Nayebi ngai nakomona Ye,
Nasepeli na Liloba;
Na bolingo Akamba ngai,
Na butu Apesi nzembo.

Home





Next song