Natambola Pene Na Yo
Ngai nazangi makasi,
Yesu batelaka ngai;
Nakosepela mingi,
Kotambolaka pene na Yo.
Natambola se na Yo,
Yesu yanolaka ngai;
Natambola pene na Yo,
Ezalaka se bongo Nkolo.
Na mokili ya mpasi,
Nani abatela ngai?
Amema mokumba na ngai,
Ezali bobele Yo Nkolo.
Wana ekokufa ngai,
Ntango'esili mpo na ngai;
Kamba ngai kati na kimia,
Na mboka ya Bokonzi na Yo.
Home
Next song