Nakokende Kino Na Suka
Nkolo nakotambola na pole,
Ekongengela ngai uta na lola;
Seko nakabwani na mokili,
Nakende na Yesu kino na suka.
Nakokende kino na suka,
Elongo na batiolami na Nkolo;
Mpe ngai nakotala basusu te,
Nakokende, Yesu, kino suka.
Mingi mpe babandaki mobembo,
Kasi baboyi kokoba na pole;
Pole ya sika mingi balandi,
Nde moke bakani kokoma suka.
Natambola bobele na Yesu,
Mpe napema likolo na libanga;
Elongo na Ye nazala seko,
Nazonga nsima te mpo nazanga te.
Ndeko mema ekulusu na yo,
Tika mokili, tala yango mpamba;
Tekisa nyonso, pesa babola,
Kende na Yesu Klisto kino suka.
Home