Mobikisi, Mobateli

Mobikisi, Mobateli,
Okamba na bolingo;
Na loboko na Yo Tata,
Oleisaka biso.

Kumisama, Nkolo Nzambe,
Yesu tozali ba Yo;
Biso tozala se ba Yo,
Kumisama, Mokonzi.

Kati na elanga na Yo,
Toyeba koluka Yo;
Na nse ya elili na Yo,
Toyeba kotambola.

Oyambi biso na ngolu,
Otali masumu te;
Na nguya na Yo monene,
Petolaka mitema.

Bana, tosepelisa Yo,
Totosaka Yo Nkolo;
Mpo na yango sala ete
Tobika na kondima

Mobikisi, Mobateli,
Mpo ete tobila Yo,
Opesaka biso mpiko,
Memaka biso Nkolo.

Home