Jeriko
Bana na Yisaele
Bakambami na Yawe
Bakatisi Yodani
Na likamwa ya Nzambe;
Epekiseli eyei,
N'ekuke ya Kanana,
Kotikisa esengo
Nde libanga Jeriko.
Jeriko! Jeriko!
Boyemba na esengo!
Nzembo ekweisaka
Bitutu ya minene.
Bakatamaki ngenga,
Bamikabi na Nzambe,
Mpe limpinga ya lola
Ezalaki na bango;
Nzambe'alobi na Yosua:
"Mboka oyo'a masumu
Na babundi na yango
Ngai nakolonga na yo."
Banso mpe batosaki
Mongongo ya kelelo,
Na Sanduku na Yawe
Bazingelaki mboka;
Na pwasa Yosua'alobi:
"Bonganga mpe makasi,
Yawe apesi biso
Mboka'oyo ya lofundu."
Banso mpe bangangaki:
"Nkembo, Nzambe Molongi."
Na lokito makasi
Bitutu bikweyaki;
Botosi nde kondima,
Nzambe alobi bongo.
Nzembo'a motema mpeto
Ekweisaka bitutu.
Home