Oyebi Mboka Yango
Oyebi mboka yango,
Mboka ya likolo?
Etondi se na pole,
Kuna molili te.
Tozali nde bapaya,
Na mokili ya mpasi;
Kasi tozali na bozwi,
Mboka ya likolo.
Oyebi mboka yango,
Mboka epambwami?
Kuna esengo mingi,
Nyonso ebongi be.
Mwana Mpate Ye Pole,
Moko te lokola Ye;
Ajali kongengisaka,
Mboka epambwami.
Mboka ya wolo mingi,
Ekolo na biso!
Oyebi mpe ebale,
NĂ¡ nzete ya bomoi?
Mikumba lisusu te,
Kimya na baponani!
Mboka euti na Nzambe,
Ekolo na biso.
O Salem, Mboka'a Kimya,
Nasengeli na Yo!
Eklezya ekoluka,
Komona Mokonzi!
Kozalaka se na Yo,
Nkolo na ngai, Mokonzi;
Mpo nayemba mpe naloba :
"Nasengeli na Yo."
Home