OYEBI MOTEMA NA NGAI

Lèlèlèlè! Lèlèlèlèlèlè!
Lèlèlèlè! Lèlèlèlèlèlèlè!
Lèlèlèlè!

Petelo olingi Ngai!
Petelo olingi Ngai!
Lelo yebisa Ngai solo
Soki olingaka Ngai Yesu!
Eh ! Lèlèlèlè! Eh! eh eh eh!

Na tindaki yo na mokili
Mpo été y’ozala mpole !
O kumisa Kombo na Nga !
Pe osalela bobele Ngai !

Kasi mwana Na yoki mawa
Mpo ete obosani nionso
O luli nkembo, ozui lokumu
Tala lelo o kakoli Liloba !

Kanisa Salomona
A lekaki yo na nkembo!
Suka suka a lobaki
Nionso ejali se mopepe!

Solo Nzambe Oyebi nionso
Na bomba nini?
Motema na ngai Oyebi nionso
Na kima wapi eh!

Soki ngai na lingaki Yo te
Nde lel’oyo na zali awa te!
Na zalaki na ba mposa ebele
Na tika nionso na landa Yo!

Na yebi solo na komi nanu te
Ndenge Liloba esengi na zala!
Kasi solo na zali lisusu te
Loleng’oyo ngai na zalaki kala!

Yo pe mwana na ngai,
Yo pe mondimi ya lelo!
Olobi y’olingi Nzambe
Kasi y’oboyi bazalani na yo eh!

Keba na ndakisa ya Dawidi
A salaki libunga monene!
A kei se koboma moto oyo
A lingaki ye na motema !
Eh ! Lèlèlèlè!
(Lèlèlèlè! Eh ! Lèlèlèlèlèlè!)

Ba lobi na Urie zonga ndako
Pema na mwasi na yo!
Urie a lobi mokonzi n’etumba
Ngai Urie na lala te !

(Oh ! Urie !)
A lingaki mokonzi
Koleka ata mwasi na ye !

Po na kozanga Bolingo
Yo pe o kwei na libunga moko
Ozali koboya ndeko na yo
A bondelaki po na yo !
Mot’oyo oza kotiola
Ezali ye a kilaki po y’olonga !
Eh ! Lèlèlèlè!

Solo Nzambe Oyebi nionso
Na bomba nini?
Motema na ngai Oyebi nionso
Na kima wapi eh!

Na yebi solo elek’oyo eza
Eleko ya bolingo na bandeko!
Soki na tondi na Bolingo te
Nionso na kosala ezali se pamba!

Na yebi solo na komi nanu te
Ndenge Liloba esengi na zala!
Kasi solo na zali lisusu te
Loleng’oyo ngai na zalaki kala!

(Yo lelo Okotinda nani?) x2
Papa Abraham a kosaki !
Moïse pe a bomaki moto !
Ezali bondeko na Ye
Nkolo a niokolaki ba Christo.
Petelo pe awanganaki Yo,
Osalelaki ye se ngolu!
Ngai na botami na Laodikya
Elok’oyo ya molili tu !
Osengi ngai ete na koma Liloba
Bolembu ya nzoto Y’oyebi yango.
Salela nga ngolu lokola bango
Otondisa ngai na Molimo na Yo!

Motema na nga
(Oyebi yango!)
Motema na nga
(Oyebi Papa!)
Papa na lingaka Yo!
(Oyebi yango!)
Papa na ngai
Na lingaka Yo eh!
(Oyebi nionso!)
Sungaka,
Sungaka ngai eh!
(Oyebi yango!)
Sungaka,
Sungaka ngai eh!
(Oyebi Papa!)
Papa ba épreuves
Na nga nionso
(Oyebi yango!)
Papa na ngai
Ba mpasi na nga eh!
(Oyebi nionso!)
Pardon ndeko
Kotika Yesu te!
(Oyebi yango!)
Ndeko na nga
Kotika Yesu te !
(Oyebi Papa!)
Ata ba pasi,
Ata pe minioko !
(Oyebi yango!)
Ndeko na nga
Koteka Yesu te !
(Oyebi nionso!)
Tango akoya
Na banje na Lola!
(Oyebi yango!)
Ndeko mona
Nkembo na Ye!
(Oyebi nionso!)
Mokolo akoya
Na banje na nkembo!
(Oyebi yango!)
O kolata motola na yo!
(Oyebi nionso!)
Tango loyenge
Nionso oyo ekosila!
(Oyebi yango!)
O kozwa lifuti na yo!
(Oyebi nionso!)
Soki lelo Ye
A boyi yo lel’oyo

(Oyebi yango!)
Nani a kolinga yo lisusu?
(Oyebi nionso!)
Soki lelo Ye a longoli
Ngolu na Ye na yo
(Oyebi yango!)
Nani a kotala yo
Ata kotala!
(Oyebi Papa!)
Soki lelo Ye a longoli
Mpema na bomoi
(Oyebi yango!)
Nani a kozongisa ngo lisusu?
(Oyebi nionso!)
Oh ndeko kotika Yesu te!
(Oyebi yango!)
Ndeko na ngai
Kobwaka Yesu te!
(Oyebi nionso!)
Nani a koki kolinga yo
Lokola Ye?
(Oyebi yango!)
Nani a koki kosunga yo
Lokola Ye?
(Oyebi nionso!)
Soki lelo Ye a longoli
Mpema na bomoi
(Oyebi yango!)
Nani a kozongisa ngo lisusu?
(Oyebi yango!)
Ndeko na nga koboya Yesu te!
(Oyebi yango!)
Kotika Yesu te!
(Oyebi nionso!)
Nani a koki kolinga yo
Lokola Yesu?
(Oyebi yango!)
Nani a koki kosunga yo
Lokola Ye?
(Oyebi nionso!)
Motem’oyo,
(Oyebi yango!)
Talelaka Nzambe!
(Oyebi nionso!)
Motem’oyo,
(Oyebi yango!)
Talelaka Nzambe na bomoi!
(Oyebi Papa!)
Motem’oyo,
(Oyebi yango!)
O lingakano Nzambe!
(Oyebi nionso!)
Motem’oyo,
Linga Nzambe na bomoi!

Solo Nzambe Oyebi nionso
Na bomba nini?
Motema na ngai Oyebi nionso
Na kima wapi eh!

Home