Yesu Klisto Bwanya Na Ngai

Yesu Klisto bwanya na ngai,
Akopesa ngai pole,
Wana nalembi na nzela
Asimbi ngai loboko.

Akopesa ngai pole,
Akopesa ngai pole,
Wana nalembi na nzela
Asimbi ngai loboko.

Yesu nde bosembo na ngai;
Asopaki makila,
Mpe nazwi na mbeka na Ye
Kimya mpe bolimbisi.

Asopaki makila,
Asopaki makila,
Mpe nazwi na mbeka na Ye
Kimya mpe bolimbisi.

Yesu akopetola ngai;
Mpe nakangami na Ye,
Uta na Ye nazwi bomoi
Mpo nalongwa masumu.

Nakangami na Yesu,
Nakangami na Yesu!
Uta na Ye nazwi bomoi
Mpo nalonwa masumu

Yesu afutaki nyongo,
Mpe asikolaki ngai;
Nasili koswa esika
Na Lola, mpo na sêko.

Yesu, asikoli ngai,
Yesu, asikolaki ngai
Nasili koswa esika
Na lola, mpo na seko.

Home