Natelenganaki Mingi
Natelenganaki mingi,
Nazangaki mokambi !
Motema na ngai, na mposa,
Etondaki na mpasi.
Wapi loboko na nguya
Mpo ete esunga ngai,
Awa ngai kati na nzela
Namoni liwa koya.
Mobikisi, Nkolo Yesu,
Ayokeli ngai mawa;
Alobi : "Ngai nalingi yo,
Nasopaki makila."
Ô Yesu loboko na Yo
Esungi ngai na liwa,
Mpe opesi ngai likabo
Ya motema na sika.
Bolimbisi Ye apesi,
Yango elikya na ngai;
Napesi motema na ngai:
Eloko Ye asengi.
Ô Yesu loboko na Yo
Esungi ngai na liwa,
Mpe opesi ngai likabo
Ya motema na sika.
Sikawa, kati n'esengo,
Azali kokamba ngai;
Moko te akobotola
Kimia nazwi na Klisto.
Yesu Apesi ngai kimia,
Apesi ngai bolingo;
Na Yesu ngai namipesi,
Sikawa mpe libela.
Home
Next song