Kolata Motole

Ngai mobundi y'ekulusu,
Molandi na Mpate;
Nabanga nde kosalela,
To kosakola Ye?

Mpe na suka n'etumba, motole ezali,
motole ezali, motole ezali,
Mpe na suka n'etumba,
motole ezali kuna na Yelusaleme.
Motole, motole, tokolata motole.
Mpe na suka n'etumba, motole ezali
kuna na Yelusaleme.

Nde nakende nzela lola,
Na bozangi mpasi,
Ntango basusu babundi,
Makila etangi.

Ngai nde nazangi banguna,
Mbonge ya kolonga?
Mokili ekosunga te,
Kokende na lola.

Nabunda mpo na kokonza,
Nkolo pesa mpiko;
Liloba na Yo esunga
Ngai kati na mpasi.

Home





Next song