Likabo Ya Kitoko

Likabo ya kitoko,
Kopesa na Yesu;
Molimo, nzoto na ngai,
Mbeka ya bomoyi.

Yamba likabo na ngai,
Yo Mwana na Nzambe!
Móto na Yo ya bule,
Ekitelaka ngai.

Natiki bomoi na ngai,
Mpe na kobanga te,
Epai na ngolu na Yo,
Mosikoli na ngai.

Moto na Yo epela,
Kati na ngai Nkolo;
Ezikisa mpe nyonso
Euti na Yo te.

Yesu, belema na ngai,
Nasikwami na Yo;
Mpe nazala se wa Yo,
Nkolo, mpo na seko.

Home