Na Ntango Moke (bientot Dans La Douceur)

Mboka moko ya pole ezali,
Na bondimi tomoni yango;
Tata azali kozela biso,
Abongisela biso ndako.

Mpe tokokutana,
Na ntango moke ngambo y'ebale;
Mpe tokokutana,
Na ntango moke ngambo y'ebale;

Tokoyemba ngambo ya ebale,
Nzembo kitoko, epambwami;
Mpe mawa na biso ekosila,
Mposa ya bopemi esili.

Tokokumisa, tokosanzola
Tata na lola, Ye Malamu;
Mpo na bolingo na Ye ya nkembo,
Mpe mapamboli mabongi be.

Home





Next song