Ebombami Te

Ebombami te mwango na Nzambe,
Oy'asalaki, akosala mpe;
Akoyamba yo na bolimbisi,
Ebombami te mwango na Ye.

Ebombami te nandimi solo,
Mpe miso ma ngai mafungwamaki;
Nayebaki Ye na ntango yango,
Eyokaki ngai mosakoli.

Ebombami te esika yango,
Mosakoli akotisaki ngai;
Pole engengaki na motema,
Ebombami te, nalandi Ye.

Ebombami te lotomo na Ye,
Azali koleka mosakoli;
Mwanje na nsambo, mwana na
moto,
Ye Eliya alakamaki

Home