NKOLO AJALI MWINDA NA NGA
Nkolo ajali
Mwinda na ngai
Na banga nini?
Nkolo ajali
Mosungi na ngai
Na kima nini?
Tango mokili
Ekoyina ngai
Na kobanga te!
Po ete Nkolo na ngai
Azali liboso na nga!
Ata soki ta na nga
Pe maman na nga!
Ba boyi ngai
Po na ndimeli Nkolo Yesu!
Na yebi ete Nkolo
A boya moto te!
A kozala Nzambe na ngai
Pe akobatela ngai!
Tango bibele ya Satana
Ekotelema!
Po na kobundisa ngai
Mwana na Nzambe!
Yaweh akotelemisa
Pe oyo ya Ye!
Ye akobikisa nga
Na nguya nyonso!
Soki liwa lisimbi ngai
Na kobanga te!
Ata soki ba niama
Ba leyi nzoto na nga!
Tango Yesu akoya
Ngai na ko sekwa!
Ngai na ko mona Ye
Na biso na nga!
Nkolo na ngai na sengi Yo
Eloko mako!
Oyo ngai na lingi
Na motema na nga!
Ete na fanda libela
Na maboko na Yo!
Na talaka Nkembo na Yo
Pe nguya na Yo!
Home