Lobi, Lelo, Libela
Nsango kitoko, motema ekotatola;
Lelo, lobi, libela Yesu abongwi te;
Akobikisa mosumuki
Mpe mobeli;
Akobondisa mpe kosunga,
Nkembo na Ye.
lobi, lelo, libela Yesu
abongwi te;
Manso makoki kobongwa,
Kasi Yesu!
Nkembo na Yesu,
Nkembo na Yesu;
Manso makoki kobongwa,
Kasi Yesu.
Ye moninga na basumuki,
Aluki Yo;
Fukama na makolo na Ye,
Yoka mawa.
Maloba ya bolimbisi alobi na yo:
“Nalimbisi Yo, kende mpe
Kosumuka te”
Na nguya na Ye abikisi
Bato na nse,
Akokangola bison a mpasi
Mpe mawa.
Mpe abikisaki mwasi
Asimbaki Ye,
Oyo alingi litondi na Ye akozwa.
Ye alimbisaki Petelo,
Kobanga te;
Asalisaki Toma,
Akondimissa Yo;
Moyekoli molingami
Alaleli Ye,
Akoyamba yo na bolingo
Epai na Ye.
Na Galilai atambolaki
Na mayi,
Akoki mpe kopekisa mbonge
Na biso;
Asambelaki mpenza na
Getesemane,
Keni ya mpasi na biso
Tomeli na Ye.
Elonga na bango
Na nzela y’Emausu,
Alingi tokende na Ye
Na nzela’a bomoi.
Tokomona Ye,
Nkolo, belemisa ntango!
Ekozala se Yesu oyo
Akendeki.
Home