Nasikolami

Nakangamaki na boloko,
Mpe ngai nazangaki bonsomi;
Wana ngai nabiangaki Yesu,
Nkembo na Nzambe, nasikwami.

Nasikwami, nasikwami,
Abuki minyololo na ngai;
Ngai nakomona Nkolo Yesu,
Nkembo na Nzambe,
Nasikwami.

Nazali komata likolo,
Molili na nzela elimwe,
Mpe ngai natelemi malamu,
Nkembo na Nzambe, nakokoba.

Ngai nakabwani na masumu,
Mokili ekobenda ngai te;
Nakobondela ntango nyonso,
Nkembo na Nzambe, nakokoma.

Home