NGA NA LINGI

Nga na lingi Yo
Masiya na ngai !
Nga na lapi kosalela se Yo,
Kino suka ya bomoyi na ngai !
Oyo nde ejali elaka na ngai !

Na poni se Yo,
Kati na motema na ngai !
Yo zala Nzambe
Ya bomoyi na ngai !
Mosungi na ngai
Ejali Yo Yaweh !
Elonga na ngai
Ejali se na Yo !

Nga na lingi Yo
Masiya na ngai !
Nga na lapi kosalela se Yo,
Kino suka ya bomoyi na ngai !
Oyo nde ejali elaka na ngai !

Ba mpasi te,
Ekabola ngai na Yo !
Mokili te Yaweh,
Eboyisa nga Yo eh !
Ata liwa na kangama
Se na Yo oh !
Mpo na yebi été Nkolo,
Yo nde Lisekwa na ngai !

Ba nzambe bazali eh !
(Kati na mokili oyo !)
Bamibengi ba nzambe,
(Bakokani na Yo te !)
Bajali na maboko,
(Bayebi kosala te !)
Bajali na makolo,
(Bakotambola te !)
Bayebi lisekwa te eh !
(Kasi Yo olonga liwa !)

Ba nzambe bazali eh !
(Kati na mokili oyo !)
Bamibengi ba nzambe,
(Bakokani na Yo te !)
Moko te a kufela ngai,
(A mipesa po na ngai !)
Kaka Yo Yesu Yaya na ngai !
(O lingaki nga mingi !)
Y’Omibonzaki po na ngai,
Po ngai na bikisama !
Y’Omibonzaki pona ngai,
Po ngai na bikisama !
Ehhhhhhh !

Fimbo na mokongo,
Fimbo na mokongo na Ye,
(Po ngai na bikisama !)
Le châtiment
Qui me donne la paix
Etait tombé sur Lui !
(Po ngai na bikisama !)
Sete n'a maboko,
Sete na makolo na Ye,
(Po ngai na bikisama !)
Éli, Éli, lama sabachthani ?
(Po ngai na bikisama !)

Home