Azali

Nasepeli butu, moi,
Awa ngai na mobembo,
Mpo' te namoni loboko na Nzambe;
Ntina y'esengo na ngai
Ezali mpo na boye :
Mobondisi azali na ngai.

Azali,Azali,
Aleluya, azali na ngai;
Kati na nzela moke,
Esengo butu na moi,
Mobondisi azali na ngai.

Nasumukaki mingi,
Mpe nazangaki kimia,
Kino nayebaki liwa na Yesu;
Nafukamelaki Ye,
Bongo nazwaki kimia,
Mobondisi azali na ngai.

Akotambola na ngai,
Ayebi mposa na ngai,
Esengo, ngai nsomi lokola
ndeke;
Molimo akonzi ngai,
Yesu abondisi ngai,
Mobondisi azali na ngai.

Bisengo ya mokili
Bikei mosika na ngai,
Nasili mpe kokabwana
na yango;
Butu ebongwani moi,
Mpe mikumba milongwe,
Mobondisi azali na ngai.

Home