A PONI NGAI
Ezalaki na mwana
Na mokonzi monene
A sepelaki kobala
Na ntango elaka ekokaki !
A kendeki na moko
Na bingumba tata na ye
Koluka oyo akokaki
Kozala mwasi na libala !
Ekomaki ye kuna
A tindaki sango mosika
Kobianga bilenge basi
Koya na elambo na kopona!
Bilenge basi ba milengeli
Ba lati molato kitoko be
Po na kosepelisa motema
Ya mwana na mokonzi ô!
Ekomaki ye na elambo
Ayokisamaki mawa
Komona molato pe lolenge
Ya basi na engumba!
Ye azwaki mokano
Kozonga mboka tata na ye
Pe kati na mawa na ye
Akendeki kotambola n’elanga!
Mpe tala na mpuasa
Akutanaki na ngai oyo
Alobaki elenge mwasi
Banga te ozwi ngolu na ngai!
Na lobi longwa mosika na ngai
Yo mwana na mokonzi!
Nazali kitoko te, bonzenga te
Ata bolamu te!
Ye abandaki kolobela ngai
Mabombami na Nzambe
Motema na ngai
Epelaki lokola bantoma
Na nzela n’Emaús! Ah ah !
Bongo baninga ba boyi nga
Bongo baninga ba fingi nga!
Balobi ngai na koki te
Kozala mwasi na mokonzi ô!
(Ah ah ah ah!)
Kasi ngai se kozela,
Miso na ngai se na nzela!
Kotala elaka na Ye
Ye apesaki ngai
Kokota na Lola!
Na Mboka ya libela!
Atako balobi oh!
Ata ba fingi ngai oh!
Na kotika te te!
Na kobila se Ye!
Na lukaki Ye te!
Ye nde abengi ngai ô!
Na kobila se Ye!
Na kobila se Ye!
Ye Mobali na nga!
Ye nde aponi ngai ô!
Na kobila se Ye!
Na kobila se Ye!
(A poni ngai!
A lingi ngai!) (bis)
Ngai oyo ba bwakaki ô!
(A poni ngai!)
Tala Masiya a poni ngai!)
(A lingi ngai!)
Kaka ngai oyo ba boyaka
(A poni ngai!)
Tala Mobali asepeli na nga!
(A lingi ngai!)
Ngai oyo ba fingaki ô!
(A poni ngai!)
Tala Masiya a lokoti nga!
(A lingi ngai!)
A lingi nga!
(A poni ngai!)
A poni nga!
(A lingi ngai!)
A lingi nga!
(A poni ngai!)
A poni nga!
(A lingi ngai!
A poni ngai!
A lingi ngai!)
Moïse oyo ba bwakaki ô
(A poni ngai!)
Talaka Nzambe alokoti nga!
(A lingi ngai!)
Jacob oyo ba boyaki ô !
(A poni ngai!)
Tala pe Nzambe apamboli ye!
(A lingi ngai!)
David oyo batiolaki ô
(A poni ngai!)
Talaka Nzambe apakoli ye!
(A lingi ngai!)
Kaka Paul oyo ba bangaki ô
(A poni ngai!)
Tala Masiya asaleli ye!
(A lingi ngai!)
A lingi ngai!
(A poni ngai!)
A poni ngai!
(A lingi ngai!)
Eh eh eh a lingi ngai!
(A poni ngai!)
A poni ngai!
(A lingi ngai!
A poni ngai!
A lingi ngai!)
Petit troupeau
Ne crains rien!
(A poni ngai!)
Voici l’Epoux t’a aimé!
(A lingi ngai!)
Toi Petit troupeau
Ne pleure pas,
(A poni ngai!)
Voici l’Epoux t’a choisi!
(A lingi ngai!)
Petit troupeau
Ne te lamente pas
(A poni ngai!)
Voici l’Epoux te connaît!
(A lingi ngai!)
Toi petit troupeau
Ne t’inquiète pas
(A poni ngai!)
L’Epoux t’a aimé!
(A lingi ngai!)
A lingi nga!
(A poni ngai!)
A poni nga!
(A lingi ngai!)
A lingi nga!
(A poni ngai!
A poni nga!
(A lingi ngai!
A poni ngai!
A lingi ngai!)
Etonga moke
Kobanga te
(A poni ngai!)
Tala Mobali a lingi yo!
(A lingi ngai!)
Yo etonga moke kolela te
(A poni ngai!)
Masiya Yesu a yebi yo!
(A lingi ngai!)
Etonga moke komitiola te
(A poni ngai!)
Tala Mobali a sepeli na yo!
(A lingi ngai!)
Ah a linga eh!
(A poni ngai!)
Ah a poni nga!
(A lingi ngai!)
Eh eh a lingi nga!
(A poni ngai!)
Ah a poni nga!
(A lingi ngai!)
Ah ah ah ah ah!
Ah ah ah ah ah!
Ah ah ah ah ah!
Ah ah ah ah ah!
Ah ah ah ah ah!
Ah ah ah ah ah!
Ah ah ah ah ah!
Home