Bolingo Ya Nzambe

Bolingo'a Nzambe monene mingi,
Tokoki kolimbola te;
Ekeyi mpenza likolo mingi,
Ekiti mpe na nse mingi;
Kilo eleki mokweyi,
Nzambe akabi Mpate;
Asombi mwana mosumuki,
Alimbisi masumu.

Bolingo'a Nzambe
Etondi bozwi,
Ezali na suka te;
Ekoyembama seko na seko
Na basantu mpe baanje.

Ntango mokili oyo ekoleka,
Mpe mikonzi mikokweya;
Ata mpe bato basambeli te,
Babeleli na ngomba te;
Bolingo'a Nzambe ekoumela,
Ezali na suka te;
Ngolu epai na bana y'Adamo,
Nzembo'a basantu, baanje.

Tokamata mayi y'ebale,
Mapata lokola nkasa;
Wana nzete nyonso ekomeli,
Mpe moto nyonso mokomi;
Kolimbola bolingo'a Nzambe,
Mayi makokauka,
Nkasa ikosila nyonso,
Ebandeli mpe suka.

Home