Nkolo Sala Ete Liloba

Nkolo sala ete Liloba
Tozali koyoka
Elongwa te kati na biso,
Eumela seko.

Moyini azali koluka
Kopengwisa biso
Mpo'ete abotola momboto
Elonami na Yo.

Wana yango'ezangi misisa,
Wana na mabanga,
Moyi ebeti yango'elembi
Na nguya ya pole.

Nde mitungisi ya mokili
Mpe bozwi ya mpamba
Esilisi nguya na yango,
Efini mpe yango.

Tika Nsango Malamu na Yo
Kati na motema
Ebota mbuma mingi mpenza
Mpo na nkembo na Yo.

Home





Next song