BOMOYI NA NGAI

Bomoyi na ngai,
Awa na nse,
Na kotalela Yo oh !
Po ete Yo Nzambe,
Y’oyebi ngai koleka
Ngai moko !
Wana esila ngai
Kondimela Yo
Na tonda n’elikia eh !
Ete Y’ojali
Nzambe na ngai,
Na kozanga eloko te !
Motema na ngai !

Motema na ngai,
Makasi na ngai,
Elikia na ngai,
Se epayi na Yo !

Ata Satana akoluka ngai,
Na tonda na kimia eh eh !
Po esimbami epayi na Yo,
Mobotoli ajali te !
Motema na ngai !

Ngai na moni
Nde mawa na Yo,
Na bomoyi na ngai eh !
Liloba na Yo kati na ngai,
Yango nde elonga na nga eh !
Alléluia ! Ehhhh !
Motema na ngai ezui kimia !
(Ezui kimia !)
Ehh...kaka na Yo !
(Ohhhhh !)
Elikia na ngai,
(Elikia !)
Awa na nse,
(Awa na nse !)
Ezali kaka epayi na Yo !

Aaamen ! Aaamen !
Nazalaka na Nzambe,
Andima kokufela ngai !
(Amen !)
Nazalaka na Nzambe,
Ayebi motema na nga !
(Amen !)
Wana ekotambolaka ngai,
Abatelaka ngai na mabe !
(Amen !)
Kozua pe kozanga na ngai,
Na maboko na Ye ! (Amen !)
(Nazalaka na Nzambe !
Nazalaka na Nzambe !
Nazalaka na Nzambe !
Amen !) (ter)

Home