Ye Nani Wana Yesu
Ye nani wana Yesu
Aleluya!
Ye nani wana Yesu,
Aleluya!
Omoni wapi mutu atambola na mayi?
Aleluya!
Mobali wana Yesu Ye nde Nzambe.
Kasi Nkolo Yesu atamboli na mayi,
Aleluya!
Mobali wana Yesu Ye nde Nzambe.
Omoni wapi mutu akufa asekwa?
Aleluya!
Mobali wana Yesu Ye nde Nzambe
Kasi Nkolo Yesu akufi asekwi,
Aleluya!
Mobali wana Yesu Ye nde Nzambe.
Omoni wapi mutu abikisa babeli?
Aleluya!
Mobali wana Yesu Ye nde Nzambe
Kasi Nkolo Yesu abikisi babeli,
Aleluya!
Mobali wana Yesu Ye nde Nzambe.
Omoni wapi mutu amata na lola?
Aleluya!
Mobali wana Yesu Ye nde Nzambe
Kasi Nkolo Yesu amati na lola,
Aleluya!
Mobali wana Yesu Ye nde Nzambe.
Omoni wapi mutu asekwisi mukufi?
Aleluya!
Mobali wana Yesu Ye nde Nzambe
Kasi Nkolo Yesu asekwisi Lazare,
Aleluya!
Mobali wana Yesu Ye nde Nzambe.
Aleluya! Aleluya! Amen! (4x)
Home