SEKELE YA MOTEMA
(Sekele ya motema,) (ter)
Ya nga na Nzambe na nga !
Sekele ya motema,
Ya motema,
Sekele ya motema,
Nzambe na bana na Ye !
Nzambe alobaki
Na elanga n’Eden,
Oh! Adamu,
Bolia mbuma te!
Kasi Ewa aboyaki kotosa,
Alobalaki nioka,
Nioka apengwisaki ye!
(Sekele ya motema,) (ter)
Ya nga na Nzambe na nga !
Sekele ya motema,
Ya motema,
Sekele ya motema,
Nzambe na bana na Ye !
Nzambe alobaki
Na elombe Samsona
Okokata te
Suki na yo ya moto!
Na mposa ya nzoto,
Alobelaki Délila!
Yango Délila abomisaki ye!
Na tango oyo moyini
Azali konguluma
Ete akweyisa
Bana nionso ya Nzambe!
Kake sambo yango pe
Ezali konguluma
Kotalisa miango
Na ye ya mabe!
Ya mbala oyo
Ewa akokweya te
Oye kokoma
Tango esi eleka!
Mikolo nionso
Ngai na etumbelo,
Na kolelaka
Ngolu ya Tata na ngai!
Mbula to moyi eh!
Ngai na losambo eh!
Na kosengaka
Ete abongola nga!
Ekobima ngai kati na ema,
Mokili ekokamwa
Komona lolenge na nga!
Moto na bolembu eh!
Moto na masumu eh!
Moto na botawu
Ye abongoli nga!
Bosana te mwana,
Bilako na Nzambe!
Bombaka yango
Na motema na yo!
Landaka mayele
Ya baye banso
Ba tambolaki liboso na yo!
Talaka Rahab abikisamaki eh
Alandaki sekele ya bana Israël.
Talaka Ruth abikisamaki eh
Alandaki Nzambe ya bana Israël.
Mwasi na Canana abikisamaki oh
Alandaki Nzambe ya bana Israël.
(Sekele ya motema,) (ter)
Ya nga na Nzambe na nga !
Sekele ya motema,
Ya motema,
Sekele ya motema,
Nzambe na bana na Ye !
Sekele ya motema,
Ya motema,
Sekele ya motema,
Nzambe na bana na Ye !
Yesu Yo Mwana moke
Olongi liwa!
(Elombe na etumba!)
Yesu Ye Mwana moke
Alongi Satana!
(Elombe na etumba!)
Tala Ye Mwana moke
Olongi linda! Liwa!
(Elombe na etumba!)
Ah! Sekele na Ye
Azali Nzambe
(Na motema!)
Ah! Sekele na Ye
Azali Nzambe
(Na motema!)
Moïse yo mobange
Olongi Egypte!
(Elombe na etumba!)
Moïse yo mobange
Olongi Egypte!
(Elombe na etumba!)
Ah! Sekele na yo
Ezalaki Nzambe
(Na motema!)
Ah! Sekele na yo
Ezalaki Nzambe
(Na motema!)
Dawidi mwana moke
Ebeti Goliath!
(Elombe na etumba!)
Dawidi mwana moke
Abomi Goliath!
(Elombe na etumba!)
Tala ye mwana moke
Ebeti Goliath oh!
(Elombe na etumba!)
Ah! Sekele na ye
Ezalaki Nzambe
(Na motema!)
Ah! Sekele na yo
Ezalaki Nzambe
(Na motema!)
Abraham yo mobange
Oboti Isaac!
(Elombe na etumba!)
Sara yo mobange
Y’oboti Isaac!
(Elombe na etumba!)
Sekele na bino
Ezalaki Nzambe
(Na motema!)
Sekele na bino
Ezalaki Nzambe
(Na motema!
Ah! bilombe na etumba!
Ah! bilombe na kondima!
Ah! bilombe na etumba!
Ah! bilombe na etumba!
Ah! bilombe na kondima!)
Yesu Yo Mwana moke
Olongi liwa!
(Elombe na etumba!)
Yesu Yo Mwana moke
Olongi linda, liwa!
(Elombe na etumba!)
Ah! Tala Ye Mwana moke
Alongi Satana!
(Elombe na etumba!)
Sekele na Ye
Ezali nde Nzambe
(Na motema!)
Ah! Sekele na Ye
Azali Nzambe
(Na motema!)
Biso pe bana na Yo
To longi ba mpasi!
(Elombe na etumba!)
Biso pe bana na Yo
To longi mokili oh!
(Elombe na etumba!)
Ah! Biso pe bana na Yo
To longi Satana!
(Elombe na etumba!)
Hum! Sekele na biso
Ezali Nzambe
(Na motema!)
Hum! Sekele na biso
Ezali nde Nzambe
(Na motema!)
Bino ba frère na nga
Bolongi Satana ndenge nini?
(Elombe na etumba!)
Bino bana mike bolongi
Ba mpasi ?
(Elombe na etumba!)
Ah! Bino bana mike
Bolongi ekobo ah!
(Elombe na etumba!)
Sekele na bino
Ezali nde Nzambe
(Na motema!)
Sekele na bino
Ezali nde Nzambe
(Na motema!)
Bino ba soeurs na nga
Bolongi mokili ndenge nini?
Bino bana mike
Bolongi Satana!
(Elombe na etumba!)
Ah! Bino bana mike
Bolongi b’épreuves!
(Elombe na etumba!)
Ah! Sekele na
bino
Ezali nde Nzambe
(Na motema!)
Hum! Sekele na bino
Ezali nde Nzambe
(Na motema!
Ah! bilombe na etumba!
Ah! bilombe na kondima!
Ah! bilombe na etumba!
Ah! bilombe na kondima!)
Home