Liloba Ya Mosakoli
Liloba eyaka na Mosakili ya nyango
Azali nde monoko ya Nzambe
Kaka ye molimboli ya liloba
Azali na oyo elobi Nkolo.
Na liloba ya mosakoli
Ngai nakolongola eloko moko te
Nandimeli Nsango Malamu nyonso
Nakobakisa eloko moko te.
Na mateya ya mosakoli nyonso
Nakobakisa eloko moko te
Nkake nsambo mpe na bilembo nsambo
Nzambe amonisaki makambo nyonso.
Na kobalana mpe na koboyana
Nakolongola eloko moko te
Atako na momboto ya nyoka lelo
Nakobakisa eloko moko te.
Yo moteyi ya Nsango Malamu oyo
Bomoyi na yo ezala ndakisa
Soki yo obala mpe oboyaka mwasi
Komitia moteyi to mokambi te.
Okoki koteya na nguya nyonso
Kasi yo moko okende lifelo
Yuda ateyaki na nguya liloba
Kasi na suka akeyi kifelo.
Okobuka oyo'olonaki ndeko
Okoliya liya bambuma na yo
Libatisi ya Molimo Mosantu
Esengi ondima liloba nyonso.
Nguya, nkembo na Mosikoli Yesu
Ndenge moko lobi, lelo, libela
Ata mingi batuti ntembe lelo
Nakotambola elongo na Yesu.
Home