Simba Loboko Ya Nzambe
Mokili etondi mbongwana,
Mpe nyonso ekoleka,
Likya na oyo ya seko,
Simba loboko'a Nzambe!
Simba loboko'a Nzambe,
Simba loboko'a Nzambe;
Likya na oyo ya seko,
Simba loboko'a Nzambe.
Ndimela bobele Nzambe,
Ata nini 'eyeli yo;
Soki baninga bakimi,
Kangama se na Nkolo.
Bozwi ya nse kolula te,
Ekobebaka noki;
Luka nde bozwi ya lola,
Ekoumela seko.
Mpe na suka ya mobembo,
Soki 'ozalaki sembo;
Okonetwa mpe na nkembo,
Na ndako kitoko be.
Home