Nkolo Na Biso Akoya
Nazali kozela mbula nkoto
Oyo ya nkembo,
Wana Nkolo akoya kokamata
Mwasi na Ye;
Natondi na esengo ezali ngai
kosenzela,
Mpo Nkolo na biso Akoya na nse.
Ee Nkolo na biso Akoya na nse,
Ee Nkolo na biso Akoya na nse;
Mbula nkoto Satana akokangema
Mpe masumu,
Ntango Yesu Akozonga awa nse.
Koya na Yesu ekobondisa
mokili oyo,
Awa nse mpe likolo tokoyeba
Nkolo Nzambe;
Akobikisa bokono, kopangusa
mpisoli,
Ekozonga Mobikisi na biso.
Basikolami na Nkolo bakoya
na Siona,
Na ngomba na Ye ya bule
mpasi ekozala te;
Kimia mpe bolingo ekotonda
na mitema be,
Ntango Yesu Akozonga awa nse.
Liwa, mpasi, masumu na mokili
ekosila,
Mbula nkoto elongo na Yesu,
nkembo mpe kimia;
Mokili eluki komona
mokolo'a lisiko,
Mpo ete Yesu Azonga awa nse.
Home