Namona Yo
Namona Yo mokonzi,
Ya bondimi na ngai;
Na bolembu makasi,
Nakosala nini?
Mokolo, ngonga nyoso,
Nasengeli na Yo;
Yaka Yesu, zalaka
Pene na ngai.
Banguna babombami,
Pene pene na ngai;
Bango baleki mingi,
Nakosala nini?
Mikolo ya mipepe,
Ya mbonge mpe nsomo,
Wana mpiko esili,
Nakosala nini?
Yesu, bozali na Yo,
Nde bomoi mpe kimia;
Kimia kati na mpasi,
Mpe bomoi libela.
Home