Bolingo Kitoko

Nzambe alingi ngai mosumuki,
Abongoli mawa na esengo;
Asali nyonso asikoli ngai,
Bolingo na Ye kitoko.

Bolingo kitoko,
Bolingo kitoko,
Nzambe' alingaki ngai mosumuki,
Bolingo na Ye kitoko.

Mpe Klistu amipesi mpo na ngai,
Akufaki kuna n'ekulusu;
Bolingo moto asosoli te,
Bolingo ebikisi ngai.

Nkolo Mobikisi akufaki,
Mpo na mosumuki lokola ngai;
Lisiko mpo na moumbu oyo
Atiolaki ngolu na Ye.

Lelo azwi ngai lokola mwana,
Alobi nazali moumbu te;
Nakotelengana lisusu te,
Abelemi koyamba ngai.

Home