Mboka Pole Mpe Kitoko
Mboka pole mpe kitoko,
Ezali na likolo;
Moto te awa na mokili,
Amoni kitoko oyo.
Na mboka oyo kitoko,
Mwana Mpate Ye moko;
Ye nde Bolingo na Nzambe,
Akongenga libela.
Kuna Nkembo ekozala
Mpe na Nzete na Bomoi;
Kuna Ebale na Bomoi,
Ekotondisa Mboka.
Nsima na bampasi nyonso,
Tokokoma na lola;
Esika ya Mai na Bomoi,
Tokozwa kimia seko.
Ntango Yesu akozonga,
Ekozala esengo !
Mboka oyo ya kitoko,
Ekozala libela.
Home