Ngomba Na Siona

Mokolo moko ekozela
Ngai na bikuke na nkembo,
Ekokatisa ngai lobwaku,
Kuna ngambo nakopema.

Mokolo moko kuna mosika,
Mokolo' eyebani se na Nzambe,
Bomoi oy'a liwa ekotelema,
Nakofanda na ngomba Siona.

Nakoyoka baanje koyemba,
Kuna, mosika na nkunda;
Ngonga ya lola ekobeta,
Ekoyemba babulami.

Nakonyokwama lisusu te,
Mitelengano'ekosila,
Wana bondeko'ezongisami,
Kolela na ngai'ekosila.

Mapata'a molili'ekolimwa,
Butu molili'ekoleka;
Mikumba ya bomoi elongwe,
Mokolo'a bopemi'ekoya.

Home