Loyembo Ya Mboka Mpo Na Etumba
Miso emoni nkembo
Ya bozongi na Nkolo;
Ye a'akonyata ekamwelo
Ya nkanda na Nzambe;
Apelisi mokalikali
Ya mopanga na Ye,
Liloba ekokoba.
Nkembo! nkembo, aleluya,
Nkembo! nkembo, aleluya,
Nkembo! nkembo, aleluya,
Liloba ekokoba.
Namoni Ye katikati
na moto mingi be;
Batongeli Ye etumbelo
Na mamwe ya mpokwa;
Namoni ekateli na Ye
Na minda mipeli,
Mokolo na Ye'ekobi.
Ayuli kelelo mpo na
Kozonga sima te;
Akomeka mitema na esambiselo
na Ye;
Bomoto na ngai ya kati
yanola Ye noki,
Ezali Ye kokoba.
Na kitoko ya fololo
Klistu'abotamaki;
Azali na nkembo ekobongolaka
yo na ngai;
Tokufa lokola Ye
mpo na kobulisa bato,
Ezali Ye kokoba.
Home