Mokolo Etani
Mokolo etani,
Nzambe' ayei na biso;
Nde ntango ya sika,
Tokumisa Mpate;
Klisto' apesi biso
oyo' elakaki Ye,
Molimo azali.
Molimo Mosantu,
Azali na biso;
Mpe liwa elimwe,
Nzambe abikisi;
Kati na mokili
Mokolo etani,
Molimo azali.
Molili ekimi
Mpe pole engengi,
Yango ebengani
Kozanga kondima;
Klisto Ye Mokonzi
Apesi bondimi,
Molimo azali.
Mosungi monene,
Ayei na mitema;
Molimo na sôlo,
Asikoli biso;
Minyolo'abuki,
Asopi libiki,
Molimo azali.
Basikwami banso,
Bayemba bonsomi;
Klisto'asali nyonso,
Apesi Molimo;
Lifelo' eningani,
kati na mokili
Molimo azali.
Home