Ezalaki ngai,
Kati na mokili eh!
Nani akokaki kolinga ngai eh!
Na tondaki saleté,
Pe mputulu,
Nani akokaki koyoka ngai eh!
Sima mwa ntango,
Nganga mayele,
Ye alekaki oh!
Na Makila oyo,
Ya Mwana Mpate oh,
Yesu Ye asukoli ngai eh!
Na zwi pe kilo,
Na komi pe moto eh!
Yesu Ye nde Nganga mayele.
Po na Masiya,
Biso to komi batu eh!
Yesu Ye nde Nganga mayele eh.
Ngai lokola Dawidi eh !
Nani na mokili oyo,
Akokaki kolinga ngai eh!
Kasi Yo Nganga mayele,
Y'olokoti ngai oh!
Tala ngai na komi pe moto eh!
Libota na Yo,
Mpe Eklézia na Yo
Balingi ba yoka
Oyo otiye na motema na nga.
Po na Masiya,
Biso to lati oh!
Yesu Yo nde Nganga mayele.
Po na Masiya,
Biso to yembi oh!
Ye nde Nganga mayele.
Po na Masiya,
Biso to yembi oh!
Ye nde Nganga mayele.