Mobikisi Malamu

Mobikisi malamu, Nkolo Yesu,
Ye Mobikisi mpo na ngai?
Akobomba ngai kati
Na libanga,
Nakozala na bisengo.

Akobomba ngai kati
na libanga,
Na mabélé makauki;
Akobomba ngai na bolingo
na Ye,
Na nse ya loboko na Ye,
Na nse ya loboko na Ye.

Mobikisi malamu, Nkolo Yesu,
Amemi mokumba na ngai;
Akosimba ngai mpe
Nakokweya te,
Akopesa ngai makasi.

Akopambola ngai lolenge
mingi,
Azali na bomoi na ngai;
N'esengo nayemba:
Nkembo na Nzambe!
Mpo na Mosikoli na ngai.

Na pole na Ye ngai
nanetolami;
Komona Ye na mipepe;
Mpo na bolingo mpe lobiko
na Ye,
Nakoyemba na Basantu.

Home