Moleki
Moleki na mokili oyo,
Nakeyi na likolo;
Kuna na mboka ya pole,
Kofanda seko.
Awa banguna baleki,
Nazingami na bango;
Nzela ekomi molili,
Ngai molingami.
Ngai molingami.
Ngai molingami na Tata,
Akotambola na ngai;
Asimbi ngai na mobembo,
Loboko na Ye.
Mpe kati na mimekano,
Na nsomo mpe bolozi,
Alobi : "Yika se mpiko,
Ngai Mobikisi!"
Ngai Mobikisi!"
Kosalela Ye Mokonzi,
Awa nakozela Ye;
Tika nayeba Ye mingi,
Natalaka Ye;
Oyo bozwi ebongi be,
Mbano na ngai, ya esengo!
Mobikisi akamba ngai,
Kino libongo!
Kino libongo!
Libongo, mboka kitoko,
Kolela ekosila;
Mitema mikosepela,
Komona Yesu;
Ntina te mpasi ezala,
Tala, Azali koya;
Mpe lisiko ebelemi,
Lola' efungwami.
Lola' efungwami.
Home