ELIKYA
Elikya na nga
Na kotia na moto te!
Mpo ete moto
Abongwanaka tango iso!
Lelo akobenga nga
Mosali na Nzambe!
Lobi akobenga nga
Molimo mabe!
Yango wana
Elikya na nga
Bobele na Yesu!
Na Liloba na Ye
Ekowumela!
Bayuda balobaki
Na Yesu Masiya!
Kumisama hosanna!
Mwana na Dawidi!
Bobele bato moko
Ba balukeli Ye
Koloba na Ye mokonzi
Ya milimo mabe!
Soki na sali likambo
Esepelisi moto!
Tango wana akomisi nga
Moninga na ye!
Ekosala nga likambo
Esepeli si ye te!
Tala ye wana abalusi nga
Monguna na ye!
Nzela ya moto
Eza lokola mopepe!
Makanisi na ye
Ezali kowayawaya!
Azali ndenge moko
Na mayi ya ebale!
Oyo ekoleka
Kasi ekokende epayi te!
Home