HOSANNA
Hosanna! Hosanna!
Motema mojali
Ko luka Yo!
Hosanna!
Nzambe na bomoyi!
Lelo vanda na motema!
Nzambe na ngai
Monene na nguya nyonso
Pe na bikamwisi
Yesu Masiya
Nzambe na balongi
Akolongela biso
Ajali na bomoyi!
Hosanna!
Y'ozali Nzambe
Oyo alongisaki mosakoli
Daniel na libulu ya nkosi!
Y’ozali Nzambe Oyo
Alongisaki mosakoli Yobo
Na pasi na ye nyonso!
Y’ozali Nzambe
Oyo abikisaki
Chadraka, Mechaka
Na Abedenego!
Na libulu ya moto!
Yo Nzambe na balongi!
Ozalaki na bango
Pe balongaki!
Y’ozali Nzambe
Oyo obikisaki
Mosakoli Nowa
Na etumbu ya mbula!
Y'ozali Nzambe
Oyo abikisaki
Lota na sodoma
Na mabanga ya moto!
Lokola ngazi
Akimeleka sima na mayi
Po azua esika ya bopemi
Molimo na nga
Eza na posa na Yo!
Pinzoli ekoma bileyi na nga
Ya tango nyonso!
Wana bazali kotuna ngai
Wapi Nzambe na yo?
Oh! Molimo na nga
Eza na mposa na Yo!
Home