N'ebale Congo
N'ebale Congo ngai nakei,
Koyembaka;
Mongongo ya lola mpe ya nse,
Eyeli ngai' esengo;
Nyonso' etalisi ngolu na Yo,
Mosikoli,
Oyei na ekolo na ngai,
Mpo na kobikisa ngai.
Oh! lisolo ya kokamwa,
Akufeli ngai;
Yesu Mokonzi na Nkembo,
Ngai ndeko ya Mokonzi.
Boumbu na ngai esili!
Nzambe ayei,
Kobongola moto mabe,
Mpe Akopesa pole;
Nkisi te, bikeko mpe te,
Botutu'esili;
Mpo na oyo akondima:
Yesu Alongi liwa.
Lisolo etondi nkembo,
Akufeli ngai;
Yesu Mokonzi na nkembo,
Ngai ndeko ya Mokonzi.
Lualaba ekoyemba :
Klisto Ayei;
Congo nganga mpe makasi,
Ete Ye nde Molongi;
Ubangi lobaka na nse :
Azali koya.
Mpe ekelamu mobimba,
Eyanola elongo :
Lisolo ya likamwisi : Akufeli ngai.
Yesu Mokonzi na nkembo,
Ngai ndeko ya Mokonzi.
Home