Libondeli

Libondeli, libondeli,
Uta mokili ememi ngai
Pene na kiti ya Tata,
Nayebisa mposa na ngai;
Na ntango ya mpasi mingi,
Motema ebondisami,
Na libondeli ebombami,
Mosika ya masenginya.

Libondeli, libondeli,
Nayoki esengo mingi
Na baye batondisami
Na mposa ya boyei na yo;
Elongo na bango nakei
Mpo namona Mobikisi;
Na esengo natelemi,
Kozela yo libondeli.

Libondeli, libondeli,
Omema bosenga na ngai
Epai na Ye Nzambe sembo,
Mpo ete apambola ngai;
Asali'ete naluka Ye,
Nandima liloba na Ye;
Mikumba natikeli Ye,
Nazeli yo libondeli.

Home