Fololo Ya Lobwako

Na Yesu nazwi moninga,
Ye manso mpo na ngai.
Ye kitoko mingi koleka banso;
Ye fololo ya lobwako,
Na Ye nde ngai nazwi.
Bosenga ya bopetolami na ngai.
Ye lisungi na mpasi,
Bopemi ya sôlo,
Asengi ngai natikela Ye manso.

Aleluya!
Ye fololo ya lobwako,
Monzoto ya ntongo;
Ye kitoko mingi koleka banso.

Akamati mpasi na ngai,
Mpe amemi yango;
Na masenginya Ye nde ebombelo;
Mpo na Ye natiki manso
Nabuki bikeko
Na motema, mpe Ye abateli ngai.
Mokili eboya ngai,
Satana'ameka ngai,
Na Yesu Klisto nakokoma nsuka.

Akotika ngai awa te,
Akokima ngai te,
Nandimi, nasali mokano na Ye;
Azingeli ngai na móto,
Mpe nakobanga te;
Na mana na Ye akoleisa ngai.
Wana tokei na nkembo,
Mpo na komona Ye,
Kuna ebale y'esengo etioli.

Home